1 Timothy 5

Bandimi

1Kopamela mobange na makasi te, kasi lendisa ye lokola nde azali tata na yo. Kamata bilenge mibali lokola bandeko na yo, 2mibange basi lokola bamama na yo, bilenge basi lokola bandeko na yo ya basi, kati na bopeto nyonso.

Basi oyo bakufela mibali

3Tosaka basi oyo bakufela mibali, baoyo batikala bango moko. 4Kasi soki mwasi oyo akufela mobali azali na bana to mpe bankoko, esengeli bayekola kolakisa botosi na makambo ya Nzambe liboso na libota na bango moko. Mpe bazongisela baboti na bango mpe bakoko na bango bolamu oyo basalelaki bango, pamba te yango esepelisaka Nzambe.

5Mwasi oyo akufela mobali, oyo atikala kaka ye moko, atiaka elikya na ye nyonso na Nzambe, mpe akobaka kobondela butu mpe moi mpe kosenga Nzambe mpo asalisa ye. 6Kasi mwasi oyo akufela mobali, oyo amipesa kati na bisengo, azali ya kokufa atako azali na bomoi. 7Pesa mitindo wana na bato, mpo ete moto moko te azala na mabe. 8Soki moto ayebi kosunga bato na ye te, mpe koleka kutu baoyo ya libota na ye moko, moto ya ndenge wana asiʼabwaka kondima mpe azali moto mabe koleka kutu moto oyo azangi kondima.

9Mpo ete nkombo ya mwasi oyo akufela mobali ekomama na buku ya basi oyo bakufela mibali, esengeli azala na bambula tuku motoba, azala mwasi oyo abalanaki na mobali moko kaka, 10mpe azala mwasi oyo ayebana mpo na misala na ye ya malamu : soki abokolaki bana malamu, soki ayambaki bapaya na ndako na ye, soki asukolaki makolo ya basantu, soki asalisaki baoyo bazalaki na minyoko, mpe soki asalaki lolenge nyonso ya misala ya malamu.

11Kasi mpo na basi oyo bakufela mibali, baoyo bazali naino bilenge, kokoma bango te na buku wana. Pamba te, tango baposa na bango ya nzoto ekomatela komipesa na bango na Kristo, bakoluka na bango kobala. 12Na bongo bakomema ngambo, awa bakobebisa elaka na bango ya liboso. 13Lisusu, basiʼbazwa ezalali ya kozala songi-songi mpe kotambola-tambolana bandako ya bato. Mpe kaka goi-goi te, kasi bakoma mpe bato ya biloba-loba, bato oyo bakotaka makambo nyonso, mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoki te.

14Yango wana, nazali kopesa ntoli na bilenge basi oyo bakufela mibali ete babala lisusu, babota bana, bakamba bandako na bango, mpe bapesa nzela na monguna te mpo na kotanga biso. 15Pamba te, basusu basiʼbabungi nzela mpo na kolanda satana.

16Soki mondimi moko ya mwasi to ya mobali azali na basi oyo bakufela mibali na kati ya libota na ye, esengeli asalisa bango mpe atika te ete Lingomba emema mokumba na bango, mpo ete Lingomba ekoka kosalisabasi oyo bakufela mibali, baoyo batikala bango moko.

Bakambi na kati ya Lingomba

17Bapaka oyo batambusaka malamu misala ya Lingomba bakoki mpo na kozwa lifuti mbala mibale ; koleka mingi, baoyo basalaka mosala ya koteya mpe ya kolakisa. 18Pamba te, Makomi ya Nzambe elobi : kokanga monoko ya ngombe te na tango ezali konika mbuma, mpe mosali asengeli kozwa lifuti na ye.

19Soki moto aye kofunda mpaka ya Lingomba epai na yo, kondimela ye te. Ndimela ye yango na monoko ya batemwe mibale to misato. 20Baoyo bazali kosala masumu, pemala bango na miso ya bato nyonso, mpo ete basusu mpe babanga.

21Napesi yo mokumba oyo liboso ya Nzambe, liboso ya Yesu Kristo, mpe liboso ya baanzelu basantu, ete batela mitindo oyo na mobimba na yango, mpe kosala likambo moko te na kopona bilongi.

22Kotiela moto moko te maboko noki-noki, mpe kosangana na masumuya bato mosusu te. Mibatela peto.

23Komelaka kaka mayi te, kasi melaka mpe mwa ndambu ya vino mpo na estomac na yo mpe mpo na bapasi oyo etungisaka yo mbala na mbala.

24Masumu ya bato mosusu emonanaka polele liboso kutu batu babandakoloba-loba mpo na yango ; kasi oyo ya bato mosusu emonanaka na sima penza. 25Ndenge moko mpe, misala ya malamu emonanaka polele penza, mpe oyo ezali mabe ekoki kotikala ya kobombama te.
Copyright information for LinMNB